Ephesians 3

Mosala Ya Polo

1Yango wana, ngai Polo, moto ya boloko ya Yesu Kristo mpo na bino bato oyo bozali bayuda te… 2Solo, bosiʼboyoka ete Nzambe, kati na ngolu na ye, apesaki ngai mosala oyo mpo na bolamu na bino; 3yango ezali sekre oyo Nzambe alakisaki ngai, ndenge nasiʼnakomaki yango na mwa maloba. 4Tango bokotanga yango, bokozala na makoki ya kososola ete nayebi sekre ya Kristo, 5oyo na batango ya kala, Nzambe alakisaki yango na bato te, ndenge alakisi yango sikʼoyo na bapostolo na ye ya bosantu mpe na baprofeta, na nzela ya Molimo.

6Sekre yango, yangʼoyo: na nzela ya Sango Malamu, bato oyo bazali bayuda te bakozwa elongo na bayuda bomengo oyo Nzambe azali kobombela bato na ye; bakomi biteni ya nzoto moko, mpe basangani na elaka oyo Nzambe apesaki kati na Kristo Yesu. 7Nakoma mosali ya Sango Malamu yango na nzela ya likabo ya ngolu ya Nzambe, oyo Nzambe apesa ngai na nzela ya nguya na ye oyo alakisaki ngai. 8Atako nazali moto ya suka penza na kati ya basantu nyonso, kasi Nzambe apesa ngai ngolu yango, ya koteya bato oyo bazali bayuda te bomengo monene ya Kristo, 9mpe nalimbola na polele nyonso, liboso ya bato nyonso, ndenge nini Nzambe ye oyo asalaki biloko nyonso, azali kokokisa mabongisi na ye oyo ezalaki ya kobombama kati na ye moko banda kala; 10mpo ete bokonzi mpe bonkumu kati na likolo, bakoka koyeba sikʼoyo, na nzela ya Lingomba, bwanya ya Nzambe oyo ezali ya lolenge na lolenge, 11ndenge abongisa yango banda kala, oyo ezali kokokisama kati na Kristo Yesu Nkolo na biso. 12Kati na ye, mpe na nzela ya kondima kati na ye, tokoki kopusana pene-pene ya Nzambe, na bonsomi nyonso mpe na elikya nyonso. 13Yango wana nasengi bino, bolemba te mpo na bapasi oyo nazali komona mpo na bino, pamba te yango ezali nkembo na bino.

Koyeba Bolingo Ya Nzambe

14Yango wana nafukamaka liboso ya Tata, 15ye oyo mabota nyonso ya bandimi, na likolo mpe awa na nse, bazwa kombo wuta na ye. 16Nabondelaka ete, wuta na bomengo ya nkembo na ye, apesa bino nguya, na nzela ya Molimo na ye, mpo na oyo etali moto ya kati, 17mpo ete Kristo avanda kati na mitema na bino na nzela ya kondima. Nabondelaka mpe mpo ete bozala ya kopikama mpe ya kovanda kati na bolingo, 18mpo ete bozala na makoki ya kososola, elongo na basantu nyonso: monene, molayi, mokuse, mpe bozindo ya bolingo ya Kristo, 19mpe boyeba ndenge bolingo yango eleki boyebi nyonso; mpo ete botonda na kotondisama nyonso ya Nzambe. 20Sikʼoyo, epai na ye oyo akoki kosala na mingi penza, koleka nyonso oyo tosengaka to tokanisaka, na nzela ya nguya na ye oyo esalaka kati na biso, 21tika ete nkembo ezala na ye kati na Lingomba mpe kati na Kristo Yesu, wuta na bato ya batango nyonso, mpo na libela na libela! Amen.
Copyright information for LinMNB